Ferre Gola azalí moyémbi wa Kongó-Kinsásá. Abótámí o mokɔlɔ 3, sánzá ya mísáto 1976.
Azalí moyémbi o lingómbá Wenge Musica 4×4 mpé alongwí yangó na Werrason. O mobú 2004 alongwí Werrason mpé akelí lingómbá Les marquis de Maison Mère. O mobú 2005 akɔ́tí o lingómbá Quartier Latin ya Koffi Olomidé.
O sánzá ya zómi na míbalé ya 2006, asálí paláki ya mandánda ya yě mɔ̌kɔ́ «Sens interdit».
O sánzá ya zómi ya 2009 asálí paláki ya mandánda ya míbalé «Qui est derrière toi ?» mpé o 2011 «Boîte noire».